PAROLES

Paroles de “Fally Ipupa – Je t’aime”

Pona maladie na nga
Ba bengi ba médecins
Ba bengi ba spécialistes
Ba cardiologues, ba neurologues
Ba amourologues, ba anchologues
Ba bengi pe ba elengiologues
Po ba décrypter malaise ango
Ata moko te azo guérir nga à part yo
Na komi inondé na mayi a miso se po ya kolelaka yo
Yo nde moto ozalaka sango a diplôme na matoyi na nga finaliste
O préféré okoma sango a liwa ya pape na matoyi ya ba catholiques

Amour na nga aah
Tellement déplorable, tellement pitoyable ba sengeli ango intention de prière
Pasi na nga aah
Lokola ya malade oyo abela pendant 50 ans, ata lisungi emonana te
Mais Mokolo ya liwa na ye
Baninga, ba familles, ba collègues na écart ya 40 minutes ba tindi 10 milles dollars pona ba obsèques
Na sili mayele
Naaa beli
Naaa zo kanisa trop esika nako bomba bolingo pona motema soucis etimbela
Po déception emona te code secret ya bolingo na nga

Mosusu nako linga aza te, introduction yo, conclusion nga
Immunité na nga parlementaire ya motema n’o
Ba longoli yango po e invalider nga na motema n’o
Mais ata olobi oboya nga, humanité mobimba eko funda yo
Pona bolingo na biso ezalaka na valeur ya globe terrestre

Miso na nga Math o pie embargo yako tala te direction ya bolingo na yo
Mwana etiké, mozangi ya pamba, bomengo na nga bolingo
Amour na yo inéluctable na vie na nga lokola
Frayon pona malili ya congélateur, 12 heures sans moyi eza minuit
Motema na nga sans yo Mathurin synonyme parfait ya enfer
Je te veux dans ma vie amour le sous bassement de mon bonheur

Je t’aime de tout mon cœur
Je t’aime de tout mon cœur
I love you Math Mathurin
I love you Mathurin Math
Na lingaka yo mingi Bébé na ngai
Na lingaka yo mingi Mathurin

Esi na bonga na nga epa na yo eh, ko bonga na nga Mathurin
Na suka nga awa na effaça le passé
Je n’ai d’yeux que pour toi mon ange, mon amour, mon opium
Les 66 livres ya bible ekoki te ko convaincre nga
Na boya yo, na tika yo, na koka te ko bosana amour na nga Math

Bolingo na nga ezo bela malnutrition, infection n’o
Na se ya kwiti moto akoki o bosana date de naissance c’est vrai
Milliardaire akoki o perdre de vue montant ya fortune na ye
Mais jamais akoki o bosana elongi pe kombo ya moto a linga
T’oublier est impensable, innaceptable, inimaginable
Sur mon corps j’écrirai ce cœur n’est pas à aimer
Ndenge na mur a lopango ba komaka cette parcelle n’est pas à vendre
C’est toi mon unique amour, c’est toi que j’adore bébé

Je t’aime de toutes mes forces
Je t’aime de tout mon cœur
I love you Math Mathurin
I love you Mathurin Math
Ngai na lingaka yo mingi Bébé na ngai
Na lingaka yo mingi Mathurin

Esi na bonga na nga epa na yo eh, ko bonga na nga Mathurin
Na suka nga awa na effaça le passé
Je n’ai d’yeux que pour toi mon ange, mon amour, mon opium
Les 66 livres ya bible ekoki te ko convaincre nga
Na boya yo, na tika yo, na koka te ko bosana amour na nga Math

Loin de toi ma vie est sans envie et mon corps est sans cœur chérie eh
Na linga, na linga, na lela na nga yo ooo, oko boma nga soki okeyi
Épargner nga douleur mortelle a love, nakoya ko suffoquer chérie eh
Lokola grand car ekueleli libata espoir de vie ekomi impossible
Bolingo na nga sur mesure na yo, o refouler nga na motema n’o

Je t’aime de tout mon cœur
Je t’aime de tout mon cœur
I love you Math Mathurin
I love you Mathurin Math
Na lingaka yo mingi Bébé na ngai
Na lingaka yo mingi Mathurin

Je t’aime de toutes mes forces
Je t’aime de tout mon cœur
I love you My baby
I love you Mathurin Math
Na lingaka yo mingi Bébé na ngai
Na lingaka yo mingi Mathurin

PARTAGER